Fady Ambroise

Hello ! C'est ici que NOUS partageons sur la vie au quotidien : poèmes, pensées, analyses et interviews. N'hésitez pas à nous laisser vos avis en commentaire !

dimanche 23 août 2020

YUMA - Fa. WISHIYA DIBAYA

YUMA !

Tongo Etani,
Elenge mobali alamuki
Bilombe na balabala
Bangazami
Bato na balabala
Bapanzani !

Ye ko elenge,
Na monoko mwa ye kaka kelasi
Mpe ndako ya Nzambe.
Masanga ya makasi
To basi,
Etalaka ye te.

Na kati ya batomboki,
Bameli-bangi
Mpe bakuzu,
Oyo ya ye mutu
Kaka na buku
Moyi mpe butu.

Po na baye ya mbula na ye
Azali « Yuma ».
Azwa bakombo nyonso
Kasi akipa te !
Mbakasa, Ngrotobobo,
Tii babakisa « Fumu-ntshik ».
Kasi, akipa te !

Basanza mpe bambula ekoleka
Elenge akokoba kaka
Na kelasi na ye
Wana baye ya mbula na ye
Bakokokoba mpe
Na boyanké na bango :

Bamuzikano na mikili,
Bango bayebi !
Elamba ebima,
Bango balati !
Nzembo ebima,
Bango bayembi !
Ata ya bosoto,
E’sala rien !
Bango koo « ba-branchés »,
Bambati neti collant
Mpe na nse ya loketo,
Neti ekweya !
…Na koseka

Kelasi esilaka te,
Esili !
Yuma akoti ville
Na nse ya moyi,
Se kotambola !

Mikanda na lipeka ;
Sapatu ya kotengama
Neti esila.
Kasi ye mpiko, se koyika !

Wana banzele na balabala,
Mokolo moko te batala !
Elongi ya mpiaka,
Nani akipa !
Ye ko musenzi
Mpe libabe ya fami ;
Asili nde kosila,
Na ya bango matongi.

Lokola nzete ebotaka mbuma
Mpe Nzakomba asalaka,
Koluka na ye epesi lifuti
Yuma azwi musala
Na Ndaku ya Babombi mosolo.

Musala epesi bozui
Elongi ya mpiaka,
Eboti mafuta ;
Esika ya mikuwa,
Eboti misuni.

Bapesi-bakombo balalaka te
Yuma akomi « Prêtre »,
Mbakasa akomi « Prezo ».

Bango koo baye ya mbula naye
Kasi bakobenga ye « Vié » !
Mosolo ebakiseli ye nde mbula ?
To ekitisi nde oyo ya Bayanké ?

Bayanké bakoma bayuma
Yum’ango nde Ngai,
Lelo Mokomi.

"Yuma", un poème du recueil "Plume et Flûte", Editions Mabiki 2019. Fa Wishiya Dibaya

Illustration de l'artiste GKanushipi

#PlumeEtFlûte
#LittératureCongolaise
#ÉditionMabiki
#YUMA

Aucun commentaire:

Enregistrer un commentaire

🤗Dites nous ce que vous pensez de cet article !

Plume & Flûte, un livre de Fa. Wishiya Dibaya aux Éditions Mabiki

Bonjour chers lecteurs et chères lectrices, Ça fait un bail, je sais ! Mais pour me rattraper : je vous amène une bonne nouvelle, ...